Bilanga ya minene-minene ya mombongo: Mateya uta na esaleli mabe na Bukanga Lonzo
Uta mobu 2014, Mboka demokalatike ya Congo (RDC) ebandisaki linaka ya kosala bilanga minene-minene 22 na mboka mobimba oyo na monene ya etando ya 1,5 milioni ya ba hekitalo (ha). Elanga ya monene-monene ya mombongo ya liboso na ekolo ebandisamaki lokola ndakisa na Bukanga Lonzo, na ntaka ya kilometele pene na 260 na ngele ya ebimelo na ntango (sud-est) ya engumba mokonzi Kinshasa. Uta na koyokana ya leta mpe baimombongo (na lompoto babengi, partenariat public-privé) kati na mbula matadi mpe baimombongo ya Africom Commodities (A.C.), lisangana ya mboka Afrika ya ngele , elanga monene- monene ya Bukanga Lonzo ekamati 80 000 ha ya mabele mpo na kolona masangu na milona mosusu. Mbula matadi epesaki na Africom mosolo ya milioni 92 ya dollars ya amelika uta na sanduku ya leta mpo na misala na elanga. Misala ya boloni elanga abandaki na 2014, na ntina monene ya kobimisa mbuma mingi mpenza koleka na etando monene. Elanga ya monene-monene oyo endimamaki mpe emonisamaki lokola likanisi ya mbongwana monene mpo na ntombwa ya mboka. « Ntango ekoki ya kobongola misala ya bilanga na Congo kolongola yango lokola mosala ya kopesa kaka bilei mpe kokomisa yango eutelo monene ya ntombwa mpe bomengo ya mokili mobimba », mokonzi Joseph Kabila Kabange alobaki yango polele na ntango ya kosepela mpe kolakisa na bato nyoso mbuma na misala ya elanga ya monene-monene na sanza ya misato ya 2015.
Mawa kaka ete linaka ya monene mpe enzombo ya elanga monene-monene esalama ata mokolo moko te. Mbula misato nsima ya kobandisama na lokumu monene mpenza ya likansi ya elanga ya monene-monene ya ndakisa ya Bukanga Lonzo likanisi yango ekwei mpe ebukani nyoso na 2017. Basali oyo bautaki na Afrika ya ngele bozongaki epai na bango wana basali ya mbotama ya congo balongolamaki na mosala. Na sanza ya motoba ya 2018, Africom afundaki mboka congo na esambiselo na molongo oyo ekataka makambo na babembani (Cour internationale d’arbitrage) oyo ezwami na de Paris mpo na kozanga kozongisela ye motuya ya misolo na ye oyo abimisaki mpo na misala na elanga. Na ntang’oyo misala nyonso mikangami, mbula matadi abeti ntangwa na 2018 kolakisa makanisi na ye ya kozongela misala na elanga monene-monene oyo mpe kobandisa bilanga minene-minene mosusu 21.
Lapolo oyo ezali kotimola na bozindo makambo na likanisi ya elanga monene-monene oyo ya ndakisa mpe kolakisa makambo na ntina oyo esengeli kopesa bwanya, oyo esengeli kopesa polele na mikano malamu ya kozwama na mikolo mikoya na oyo etali kopesa makoki na misala ya bilanga na mboka mpe manaka ya mbula matadi mpe ya msanagana minene ya molongo maye mazali kolendisa mpe kopesa makoki mpo na kotiama mpe misala ya bilanga minene-minene, totangi Ebombelo ya misolo ya molongo « Banque mondiale » mpe ebombelo ya misolo ya Afrika mpo na ntombwa « Banque africaine de développement » (BAD).
Likolo ya mikakatano mingi emonani na ebongiseli mpe motindo ya kotambolisa likanisi ya bilanga minene-minene, bolukiluki oyo elakisi ete bilanga minene-minene ya mombongo bizali biyano bimonani lokola malamu nzoka nde bizali mabe kotala bisengeli ya RDC mpe Afrika na maye matali bilei mpe misala ya boloni mpe ya bobundisi bobola.